(Sung in Lingala)
Eza yo, eza yo (It is You, it is You)
Eza yo, eza yo (It is You, it is You)
Oy’abenga nga ezali yo (You are the One who called me)
Kombo na yo Fidèle (Your name is Faithful)
Nini obanda osukisa te (What You begin, You do not leave unfinished)
Yo Alpha pe Omega (You are the Alpha and the Omega)
Ngonga na ngai na montre na yo (My time is on Your watch)
Ata na suka ekobeta (Even at the end, it will strike)
Lokola ebandi na yo, moi je le sais (Since it began with You, I know it)
Butu ekokota te oko mimonisa (The night will not prevail, You will reveal Yourself)
Eza yo, eza yo (It is You, it is You)
Refrain:
Ozali to osi okeyi eh (Are You there or have You already left?)
Lobela ngai nayeba (Speak to me that I may know)
Oyo mokili epimi ngai (This world has overwhelmed me)
Ezali na maboko na yo (It is in Your hands)
Bilaka na yo Yahweh (Your promises Yahweh)
Nabomba na motema (I store them in my heart)
Eza yo nde oloba, o jura (It is You who spoke and promised)
Olaka yo okozala na ngai eh (You promised that You will be with me)
Repeat: Eza yo, Eza yo (It is You, it is You)
Papa yonde oloba na ngai okozala na ngai (Father, You are the One who told me You will be with me)
Olobela nga lisusu oko tika ngai jamais (You also told me that You will never leave me)
Papa yonde Mokonzi osospela ngai makila (Father, You are the King who shed Your blood for me)
Yonde, molobeli na ngai epayi ya Papa (You are my advocate before the Father)
Spoken:
Où es-tu le Dieu de la bible? Je me demande oza to oza te? Ozo yako nga to ozo yoka nga te ? (Where are You, God of the Bible? I wonder, are You there or are You not? Are You watching over me or are You not hearing me?)
Jesus!
(Refrain)
Repeat: Eza yo, Eza yo (It is You, it is You)
Yesu yonde elikya na ngai ya suka (Jesus, You are my final hope)
Yonde moyoki, moyoki ya losambo na ngai eh (You are the One who hears my prayer)
Ekomi tango tosimba (The time has come for us to hold on to)
Bilaka ya Nzambe (The promises of God)
Alaka na baye (He promises to those)
Bandima kotalela ye (Who believe and look to Him)
Ekomi tango tomona (The time has come for us to see)
Bilembo ya Nzambe (The signs of God)
Alaka na baye (He promises to those)
Bapona kondimela ye! (Who choose to believe in Him!)
Repeat: Eza yo, Eza yo (It is You, it is You)
Na motema mobimba (With all my heart)
Moko kaka aloba atika kokosa te eh (The One whose words are not false)
Nazo yemba Fidèle, Fidèle na maloba na ye (I sing, Faithful, faithful to His word)
Yahwe, Yahwe yonde, yonde mokolo elaka (Yahweh, the One who fulfills every promise)
Nga, nazo yemba Fidèle, Fidèle na maloba na ye oh (As for me, I sing, Faithful, faithful to His word)
Yahweh, Bayaka epayi na yo, bazongaka se na nzembo (Yahweh, those who come to You always return with a song)
Papa yonde Mopangusi, Mopangusi ya pinzoli ya mitema (Father, You wipe our tears, Comforter of grieving hearts)
Nzambe ya lola eh, tatuenda wa bana eh (God of heaven, we will go as Your children)
Ozali to osi okeyi eh (Are You there or have You already gone)
Lobela ngai nayeba (Speak to me so that I may know)
Oyo mokili epimi ngai (This world has overwhelmed me)
Ezali na maboko na yo (It is in Your hands)